Psalms 133

Soki bandeko basangani…

Nzembo ya David, nzembo ya mobembo tango bazalaki na nzela mpo na kokende na ndako na Yawe.


1 Tala, ezali malamu mpe kitoko
soki bandeko bavandi lisanga kati na bomoko.

2 Ezali lokola mafuta ya motuya,
oyo esopani na motu,
oyo ezali kokita na mandefu,
kino na mandefu ya Aron,
ezali kokita na suka ya bilamba na ye ;

3 ezali mwa mayi ya mike-mike
oyo ezalaka na matiti ya Ermon,
mpe ekitaka na bangomba ya Siona ;
pamba te, ezali kuna nde Yawe apesaka
lipamboli na ye, bomoi mpo na libela na libela.
Copyright information for LinMNB